Liyebisi mpe mabiangi
Libenga ya mibale
Mbela ya mikanda po na likita lya mokili mobimba lya zomi na moko (11è) likolo lya bakota ba Bantu(Bantu11), wapi likita likopika nganda na eteyelo monene ya Gand (18-21 août 2026) esili bongo kofongwama. Likita lyango likokabwana na biteni mibale. Eteni ya liboso to pe ya monene, ekoyamba makanisi na makabo ya ndenge na ndenge na bakota ba bantu. Eteni ya mibale ekabwani na nganda zomi na moko, wapi nganda ekotala makambo ya siki-siki (tala bandimbola ya nganda awa).
Tokosilisa koyamba ‘makanisi-na-mokuse’ (> abstrait) 08-12-2025 (23:59 UTC/GMT+1). Mokomi moko akoki kotinda ‘makanisi-na-mokuse’ mabale, kasi akoki kozala ye moko kaka na moko na yango. Makanisi-na-mokuse masengeli kozala na lokasa 1 ya makomi (na kati na yango bililingi/ndakisa ya kota). Lokasa 1 ekoki kobakisama po na ‘références’. Makomi masengeli mazala na monene ya: 11pt Charis SIL to pe 12pt Times New Roman, na esika moko, monene ya likasa: A4 standard (2,54cm). Bandeko ya mosala bakoki koyaka na engumba Gand to pe kobeta masolo ma bango na nzela ya mayele ma sika (internet). Bana ba kelasi (kati na bango , bayekoli ba likolo ‘PhD’) pe baye bazali na mboka ya nkita ya moke, bakomikomisa na likita liye na talo ya kokita.
Makanisi-na-mokuse makotindama kaka na nzela ya EasyAbs. Soki ozali naino na konte EasyAbs te, fongola liboso konte ya ofele na EasyAbs, pe na sima tinda makanisi-na-mokuse, kolandisa malako maye masili kopesama likolo. Tinda makanisi-na-mokuse ma yo na pdf., kasi kotia kombo na yo te na kati ya makanisi-na-mokuse (na kati na yango nkombo ya fisyé). Na kati na makanisi-na-mokuse ma yo, bakisa elembo eye ezali kolakisa nganda eye etali yango (ndakisa ‘WS01’) to salela ‘GS’ po na kolakisa botindiki na eteni ya liboso to pe ya monene . Bakisa maloba 3-5 ya tina, wapi maloba mazali kolimbola botindiki na yo (e.g. ‘phonologie’, ‘sociolinguistique’, ‘Sud Bantu’). Soki ozali kotinda mokanda ya mokomi moko, monisa soki okanisi ete okozala na na engumba Gand. Soki ozali kotinda mokanda oyo okomi elongo na moninga mosusu, monisa bakomi boni bazali kokanisa kozala na engumba Gand.
Soki ozali na mikakatano po na kosalela EasyAbs, meka kozongisa sika lokasa, kosalela ba logiciels ndenge na ndenge na internet, tala site internet ya EasyAbs (https://easyabs.linguistlist.org/about/), to pe komela lisanga ya babongisi likita Bantu 11 na Bantu11@UGent.be.
Sango mosusu na tina ya likita liye ekoki kozwama na site internet na yango. Mituna nyonso ekoki kotindama na Bantu11@UGent.be.
Mikolo ya tina ya kokanga :
- 1 décembre 2025 8 décembre 2025: mokolo ya suka ya kotinda makanisi-na-mokuse
- 20 janvier 2026: mayebisi ya bondimi
- 15 février 2026: bofungoli ya bokomisi nkombo (na talo moke koleka kino 1er avril)
- 15 juin 2026: Mokolo ya suka ya kokomisa kombo
- 18-21 août 2026: mikolo ya likita
Tozali kozela na esengo nyonso kozwa makanisi-na-mokuse ma bino pe koyamba bino banso na engumba Gand!
Libenga ya liboso
Lokasa ya interneti ya likita ya Bantu 11 ezali sik’oyo lifungwami, mpe kuna bokokuta makambo nyonso ya ntina oyo ekobakisama polele polele. Na ntango ya sik’oyo, lokasa ezali kopesa sango etali esika ya likita mpe mikolo ya ntina oyo esengeli kobatela.
Mokolo ya suka ya liboso mpo na kotinda makomi ya maye matali etuluku (atelye) ezali mokolo ya 15 oktobre (sánzá ya zómi) 2025 na 23:59 (UTC/GMT+2). Na mokolo wana, bosengeli kotindela biso na adresi Bantu11@Ugent.be. Mokuse ya koleka maloba nkoto moko (1000) te, elongo na bibliographie mpe ndakisa ya liboso ya maloba ya lokota. Tosengi oyebisa bankombo ya mobɛngisi (babengisi) ya atelye (ba-atelye), kasi okotia te liste ya mikanda to ya motángi (batangi) ya mikanda oyo ekoki kozala. Tokobimisa ba-atelye oyo eponami na site ya bokutani liboso ya mokolo ya 1 novambre (sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́) 2025.
Mokolo ya mibale ya suka ya kotinda mokuse ya makomi ya mikanda (bapapiers) ezali mokolo ya 1 decembre (sánzá ya zómi na míbalé) 2025 na 23:59 (UTC/GMT+2). Kotinda yango ekofungwama kobanda mokolo ya 1 novambre kino na mokolo ya suka. Mpe ezali bosenga ete bokotinda kaka banda wana, mpo na kopesa nzela ya kopona kati na atelye moko to na lisanga monene. Makambo mosusu ya polele etali ndenge ya kotinda mikuse ekopesa na tango esengeli.
Likita ekosalema na Campus Ledeganck, pene ya Musée ya Université ya Gand mpe Jardin Botanique. Esika yango ezali pene na gare monene ya Gent-Sint-Pieters, oyo ezali na ekangiseli ya ngonga moko na Aéroport ya Bruxelles mpe ezali komonana malamu na ba-gare minene ya mboka Europe, ezala na Leyde (Pays-Bas), esika Bokutani ya 55 ya Maloba mpe Lingwistiki ya Afrika (CALL 2026) ekosalema banda na mokolo ya 24 kino na 26 sánzá ya mwambe (août) 2026. Engumba ezali mpe na terminale ya Flixbus pene na gare ya Gand-Dampoort, oyo ezali na ekangiseli malamu na bingumba minene ya Europa, lokola Rotterdam mpe La Haye, esika okoki kozwa train mpo na kokende na Leyde.
Na tina ya esika ya kofanda, bokoki kokota awa; epesami mpo na komona liste ya bisika pene ya likita. Mpo na bisika mosusu ya kofanda mpe makambo ya kosala, bokoki kotala site Visit Gent.
Tokozwa na esengo makomi ya bino ya ba propositions ya bituluku (ba-atelye) mpe tozali na elikya ya koyamba bino nyonso na Gand!
Liyebisi ya liboso
Ekipi ya BantUGent ezali na esengo ya koyamba bino na engumba ya Gand (Belgique) mpo na Likita ya 11 ya mikili nyonso ya minoko ya Bantu (Bantu11). Likita yango ekosalema wuto 18 kino 21 sanza ya mwambe, 2026, mwa moke liboso ya CALL 2026 oyo ekosalema na Leiden (Pays-Bas) wuto 24 kino 26 août, 2026. Libenga ya yambo mpo na kotinda mikanda mpe ba-ateliers ekobanda na ebandeli ya sanza ya libwa 2025. Mituna nyonso ekoki kotindama na Bantu11@UGent.be.
Esika
Bokutani ya Bantu 11 ekosalema na Campus Ledeganck, pene ya Musée ya Université ya Gand mpe Jardin Botanique. Campus oyo ezali pene na gare monene ya Gent-Sint-Pieters. Liste ya bisika ya kofanda pene ya esika ya bokutani ezali awa. Bisika mosusu ya kofanda mpe makambo ya kosala bokoki kokuta na site officiel Visit Gent.
Badati ya ntina mingi
- 15 ya sanza ya zomi 2025: mokolo ya suka ya ba ateliers
- 1 ya sanza ya zomi na moko 2025 : bosakoli ya ba ateliers oyo eponami
- 1 ya sanza ya zomi na mibale 2025: mokolo ya suka ya ba présentations
- 15 ya sanza ya yambo 2026: mayebisi ya bondimi
- 15 ya sanza ya mibale 2026 : bofungoli ya bokomisi nkombo (ba frais ya bokomisi nkombo ya yambo kino 1 ya sanza ya minei)
- 15 ya sanza ya motoba 2026: mokolo ya suka ya bokomisi nkombo
- 18-21 ya sanza ya mwambe 2026: mikolo ya likita
Etuluku (atelye)
Likita yango ekozala na likita ya monene oyo ekoyamba makabo na likambo nyonso ya minoko ya Bantu, pembeni ya ba ateliers oyo :
- WS01 Unravelling the knots of not: Exploring lesser-known negative patterns in Bantu
- WS02 Swahili, Sabaki, and Beyond:Integrating New Data and Perspectives on the East African Coast
- WS03 Clause Chaining in Bantu languages: Narrative verb sequences with and without-morphological marking
- WS04 Renewing Bantu Lexical Reconstruction
- WS05 Interdisciplinary perspectives on Bantu language history
- WS06 The effects of maximality constraints on verb structure
- WS07 Ethnolinguistics, Ethnobiology and Biodiversity / WS07 Ethnolinguistique, ethnobiologie et biodiversité
- WS08 Phonetic and phonological documentation: the role of Bantu in establishing new standards for the discipline
- WS09 Irregular sound change in Bantu
- WS10 Advances and developments in cross-Bantu typology: Empirical, comparative and methodological approaches
- WS11 Nominal Classification in Bantu or the Semantax of the Noun / WS11 Classification nominale en bantou ou la semantaxe du nom
Programme
Oyo ekoyebisama.
Formulaire ya inscription
Ekozelama na mokolo ya 15 ya sanza ya mibale 2026.
Ba frais ya inscription
Oyo ekoyebisama.
Komite ya kobongisa makambo
Paulin Baraka Bose
Arnaud Bizongwako
Koen Bostoen
Pieter De Coene
Maud Devos
Sebastian Dom
Heidi Goes
Hilde Gunnink
Kokutana
Tinda e-mail na Bantu11@UGent.be.
Elisabeth Kerr
Lorenzo Maselli
Edward Ntonda
Sara Pacchiarotti
Chrisnah Renaudot Mfouhou
Nina van der Vlugt
Aron Zahran