Likita ya Bantu 11

Liyebisi mpe mabiangi

Libenga ya mibale

Esika ya kokomisa nkombo na eterenete (internet) na tina ya likita Bantu11 esili kofongwama. Tosengi bolimbisi mpo na mikolo mike miye misili kobakisama. Mpo na yango, mokano mpo na baye bokomikomisa nkomo na lombango mpe kofuta liboso na ntalo ya moke ekotambwisama kino na 1 mai 2026. Esengeli na bino kofina awa mpo na kokomisa ya bino nkombo.

Elongo na lisungi ya mbongo ya libanda oyo tolukaki mpe ezali moke, mbongo ya bokomisi nkombo ekosunga na makambo ya lolenge na lolenge, ndakisa kofuta bisika ya mosala, bisalelo mpe bibombami, bilei mpo mikolo minso minei mya mosala wuta tongo kino sima ya nzanga, mpe lisungi na basakoli banene banei ba likita lya biso. Montango mwa mbongo moye mokofutama mozali lokola  likelemba (moziki): soki moto azali na ekólo eyebani na bozui ebele mpe azali moto moye asi asilisaki kelasi ya likolo, ndambo ya mbongo na ye ekosunga bandeko baye bakowita na bikólo biyebani na bozui ndambo mpe bayekoli. Kaka ndambo eye, ekoyeba mpe kosunga bato baye basili bongo kobima bopola (bato baye baponamaki ndenge bazui mponyi ya likolo) kasi bakowita na bikólo biyebani na bozui ndambo. Bosimba été bandeko baye (babimi bopola) bakofuta eloko té, kasi bazui linsungi lya lisanga lya babongisi likita Bantu11. Motango mwa bikólo biye biyebani na bozui ndambo mozuami awa.

Na ngambo mususu, tozali na esengo ya kopesa bino nkombo ya basakoli banene banei ba likita lya biso: Thera Marie Crane, Rozenn Guérois, Amani Lusekelo, mpe Cesar Fortes-Lima. Awa, ma bango makanisi-na-mokuse, nzela moko mpe na motango mwa masolo maye mandimami mpo na likita lya biso.

Tolingi mpe kokundolela bakomi nyonso bátinda version oyo nkombo na bango ekomami ya résumé na bango liboso ya mokolo ya 1 Avril (kolanda malako oyo ezali na email ya kondima).

Bansango mosusu etali makambo ya visa mpe makambo mosusu ya ntina mpo na bato ya bolukiluki oyo bazali kosala mobembo na Belgique ekoki kozwama awa.

Na suka, tozali na esengo ya koyebisa bino ete tosali boyokani na kompani ya mpepo ya Lufthansa Group (Lufthansa, SWISS, Austrian, Brussels Airlines, Eurowings, Edelweiss, Discover) mpo na kokitisa bino mosolo ya mobembo. Banzela na bango ebele ya mibembo, oyo ezali na bisika pene na 310 na mokili mobimba, mpe esangisi mpe mibembo ya transatlantic oyo esalemaka na Air Canada mpe United, ezali mpo na bino. Finá awa mpo na komonisa batalo ya kitisami. Ezali valable mpo na mpepo kino poso moko liboso mpe poso moko sima ya likambo.

Libenga ya mibale

Mbela ya mikanda po na likita lya mokili mobimba lya zomi  na moko (11è) likolo lya bakota ba Bantu(Bantu11), wapi likita likopika nganda na eteyelo monene ya Gand (18-21 août 2026) esili bongo kofongwama. Likita lyango likokabwana na biteni mibale. Eteni ya liboso to pe ya monene, ekoyamba makanisi na makabo ya ndenge na ndenge na bakota ba bantu. Eteni ya mibale ekabwani na nganda zomi  na moko, wapi nganda ekotala makambo ya siki-siki (tala bandimbola ya nganda awa).

Tokosilisa koyamba ‘makanisi-na-mokuse’ (> abstrait) 08-12-2025 (23:59 UTC/GMT+1). Mokomi moko akoki kotinda ‘makanisi-na-mokuse’ mabale, kasi akoki kozala ye moko kaka na moko na yango. Makanisi-na-mokuse masengeli kozala na lokasa 1 ya makomi (na kati na yango bililingi/ndakisa ya kota). Lokasa 1 ekoki kobakisama po na ‘références’. Makomi masengeli mazala na monene ya: 11pt Charis SIL to pe 12pt Times New Roman, na esika moko, monene ya likasa: A4 standard (2,54cm). Bandeko ya mosala bakoki koyaka na engumba Gand to pe kobeta masolo ma bango na nzela ya mayele ma sika (internet). Bana ba kelasi (kati na bango , bayekoli ba likolo ‘PhD’) pe baye bazali na mboka ya nkita ya moke, bakomikomisa na likita liye na talo ya kokita.

Makanisi-na-mokuse makotindama kaka na nzela ya EasyAbs. Soki ozali naino na konte EasyAbs te, fongola liboso konte ya ofele na EasyAbs, pe na sima tinda makanisi-na-mokuse, kolandisa malako maye masili kopesama likolo. Tinda makanisi-na-mokuse ma yo na pdf., kasi kotia kombo na yo te na kati ya makanisi-na-mokuse (na kati na yango nkombo ya fisyé). Na kati na makanisi-na-mokuse ma yo, bakisa elembo eye ezali kolakisa  nganda  eye etali yango (ndakisa ‘WS01’) to salela ‘GS’ po na kolakisa botindiki na eteni ya liboso to pe ya monene . Bakisa maloba 3-5 ya tina, wapi maloba mazali kolimbola botindiki na yo (e.g. ‘phonologie’, ‘sociolinguistique’, ‘Sud Bantu’). Soki ozali kotinda mokanda ya mokomi moko, monisa soki okanisi ete okozala na na engumba Gand. Soki ozali kotinda mokanda oyo okomi elongo na moninga mosusu, monisa bakomi boni bazali kokanisa kozala na engumba Gand.

Soki ozali na mikakatano po na kosalela EasyAbs, meka kozongisa sika lokasa, kosalela ba logiciels ndenge na ndenge na internet, tala site internet ya EasyAbs (https://easyabs.linguistlist.org/about/), to pe komela lisanga ya babongisi likita Bantu 11 na Bantu11@UGent.be.

Sango mosusu na tina ya likita liye ekoki kozwama na site internet na yango. Mituna nyonso ekoki kotindama na Bantu11@UGent.be.

Tozali kozela na esengo nyonso kozwa makanisi-na-mokuse ma bino pe koyamba bino banso na engumba Gand!

Libenga ya liboso

Lokasa ya interneti ya likita ya Bantu 11 ezali sik’oyo lifungwami, mpe kuna bokokuta makambo nyonso ya ntina oyo ekobakisama polele polele. Na ntango ya sik’oyo, lokasa ezali kopesa sango etali esika ya likita mpe mikolo ya ntina oyo esengeli kobatela.

Mokolo ya suka ya liboso mpo na kotinda makomi ya maye matali etuluku (atelye) ezali mokolo ya 15 oktobre (sánzá ya zómi) 2025 na 23:59 (UTC/GMT+2). Na mokolo wana, bosengeli kotindela biso na adresi Bantu11@Ugent.be. Mokuse ya koleka maloba nkoto moko (1000) te, elongo na bibliographie mpe ndakisa ya liboso ya maloba ya lokota. Tosengi oyebisa bankombo ya mobɛngisi (babengisi) ya atelye (ba-atelye), kasi okotia te liste ya mikanda to ya motángi (batangi) ya mikanda oyo ekoki kozala. Tokobimisa ba-atelye oyo eponami na site ya bokutani liboso ya mokolo ya 1 novambre (sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́) 2025.

Mokolo ya mibale ya suka ya kotinda mokuse ya makomi ya mikanda (bapapiers) ezali mokolo ya 1 decembre (sánzá ya zómi na míbalé) 2025 na 23:59 (UTC/GMT+2). Kotinda yango ekofungwama kobanda mokolo ya 1 novambre kino na mokolo ya suka. Mpe ezali bosenga ete bokotinda kaka banda wana, mpo na kopesa nzela ya kopona kati na atelye moko to na lisanga monene. Makambo mosusu ya polele etali ndenge ya kotinda mikuse ekopesa na tango esengeli.

Likita ekosalema na Campus Ledeganck, pene ya Musée ya Université ya Gand mpe Jardin Botanique. Esika yango ezali pene na gare monene ya Gent-Sint-Pieters, oyo ezali na ekangiseli ya ngonga moko na Aéroport ya Bruxelles mpe ezali komonana malamu na ba-gare minene ya mboka Europe, ezala na Leyde (Pays-Bas), esika Bokutani ya 55 ya Maloba mpe Lingwistiki ya Afrika (CALL 2026) ekosalema banda na mokolo ya 24 kino na 26 sánzá ya mwambe (août) 2026. Engumba ezali mpe na terminale ya Flixbus pene na gare ya Gand-Dampoort, oyo ezali na ekangiseli malamu na bingumba minene ya Europa, lokola Rotterdam mpe La Haye, esika okoki kozwa train mpo na kokende na Leyde.

Na tina ya esika ya kofanda, bokoki kokota awa; epesami mpo na komona liste ya bisika pene ya likita. Mpo na bisika mosusu ya kofanda mpe makambo ya kosala, bokoki kotala site Visit Gent.

Tokozwa na esengo makomi ya bino ya ba propositions ya bituluku (ba-atelye) mpe tozali na elikya ya koyamba bino nyonso na Gand!

Liyebisi ya liboso

Ekipi ya BantUGent ezali na esengo ya koyamba bino na engumba ya Gand (Belgique) mpo na Likita ya 11 ya mikili nyonso ya minoko ya Bantu (Bantu11). Likita yango ekosalema wuto 18 kino 21 sanza ya mwambe, 2026, mwa moke liboso ya CALL 2026 oyo ekosalema na Leiden (Pays-Bas) wuto 24 kino 26 août, 2026. Libenga ya yambo mpo na kotinda mikanda mpe ba-ateliers ekobanda na ebandeli ya sanza ya libwa 2025. Mituna nyonso ekoki kotindama na Bantu11@UGent.be.

Esika

Bokutani ya Bantu 11 ekosalema na Campus Ledeganck, pene ya Musée ya Université ya Gand mpe Jardin Botanique. Campus oyo ezali pene na gare monene ya Gent-Sint-Pieters. Liste ya bisika ya kofanda pene ya esika ya bokutani ezali awa. Bisika mosusu ya kofanda mpe makambo ya kosala bokoki kokuta na site officiel Visit Gent.

Badati ya ntina mingi

  • 15 ya sanza ya zomi 2025: mokolo ya suka ya ba ateliers
  • 1 ya sanza ya zomi na moko 2025 : bosakoli ya ba ateliers oyo eponami
  • 1 ya sanza ya zomi na mibale 2025: mokolo ya suka ya ba présentations
  • 15 ya sanza ya yambo 2026: mayebisi ya bondimi
  • 18 ya sanza ya misato 2026 : bofungoli ya bokomisi nkombo (ba frais ya bokomisi nkombo ya yambo kino 1 ya sanza ya mitano)
  • 9 ya sanza ya nsambo 2026: mokolo ya suka ya bokomisi nkombo na campus
  • 17 ya sanza ya mwambe 2026: mokolo ya suka ya bokomisi nkombo na internet
  • 18-21 ya sanza ya mwambe 2026: mikolo ya likita

Etuluku (atelye)

Likita yango ekozala na likita ya monene oyo ekoyamba makabo na likambo nyonso ya minoko ya Bantu, pembeni ya ba ateliers oyo :

Programme

Bozwa awa botálisi ya liboso ya masolo ya ntina, ba ateliers mpe mikanda oyo endimami mpo na kolakisa.

Inscription

Bo finga awa pona ko inscrire pe ozua aperçu ya ba frais ya inscription. Ba tarifs ya ba ndeke ya liboso ezali tii 1 ya sanza ya mitano.

Komite ya kobongisa makambo

Paulin Baraka Bose (UGent)

Arnaud Bizongwako (UGent-UBurundi)

Koen Bostoen (UGent)

Pieter De Coene (UGent)

Maud Devos (Royal Museum for Central Africa)

Sebastian Dom (UGent)

Heidi Goes (UGent)

Hilde Gunnink (UGent-ULeiden)

Elisabeth Kerr (UGent)

Margot Luyckfasseel (UAntwerpen)

Lorenzo Maselli (UGent-UMons)

Edward Ntonda (UGent-UNanterre-LLACAN)

Sara Pacchiarotti (UGent)

Chrisnah Renaudot Mfouhou (UGent)

Nina van der Vlugt (UGent)

Aron Zahran (UGent-INALCO-LLACAN)

Kokutana

Tinda e-mail na Bantu11@UGent.be

Komite ya siansi

Koen Bostoen (UGent)

Maud Devos (Royal Museum for Central Africa)

Gratien Atindogbe (University of Buea)

Lotta Aunio (University of Helsinki)

Hannah Gibson (University of Essex)

Claire Halpert (University of Minnesota)

Amani Lusekelo (University of Dar es Salaam College of Education)

 

Lutz Marten (School of Oriental and African Studies London)

Margot Luyckfasseel (UAntwerpen)

Mantoa Motinyane (University of Western Cape)

Atikonda Mtenje-Mkochi (Malawi University of Science and Technology)

Mark Van de Velde (LLACAN)

Nobuko Yoneda (Osaka University)

Alexander Zheltov ( Saint Petersburg State University)